Dywedwch wrthym a ydych chi'n derbyn cwcis ons.gov.uk

Rydym ni’n defnyddio cwcis i gasglu gwybodaeth am y ffordd rydych chi’n defnyddio cyfrifiad.gov.uk. Rydym ni’n defnyddio’r wybodaeth hon i sicrhau bod y wefan yn gweithio cystal â phosibl ac i wella ein gwasanaethau.

You have accepted all additional cookies. You have rejected all additional cookies. You can change your cookie preferences at any time.

Neidio i’r prif gynnwy

Lingala lisungi na lisalisi : Trosolwg

Botangi ezali nini?

Botangi ezali mosala oyo ezali kosalema nsima ya mbula 10 nyonso, mpe ezali kopesa elili ya bato nyonso, na mabota na Angleterre na Pays de Galles. Botangi oyo ekolanda ekosalema na Dimanche 21 Mars 2021.

Bansango tokozwa na botangi ekosunga mpo na kosala plan, mpe kofuta misala nyonso na bisika na bango, ata mpe na misala ya minoko. Na ndakisa, NHS akoki kozala na mposa ya kopesa misala ya bobongoli ya minoko na bisika mosusu.

The Office for National Statistics (Biro ya Botangi) (ONS) ezali kosala baplan, mpe kosala botangi na Angleterre, mpe na Pays de Galles.

Nani esengeli asala botangi

Botangi ezali kotuna mituna mpo na yo, ndako na yo, mpe ezali ntina ete moto nyonso na Angleterre, mpe na Pays de Galles asangana.

Warning:

Esengeli osala botangi na ndenge ya kotosa mibeko

Ezali mbeba kopesa bansango ya lokuta, to kozanga kosala botangi, mpe bakoki kofutisa yo amande kino na £1000. Mituna misusu bakomi yango polele lokola ya volontaire. Ezali etumbu te soki opesi biyano na yango te.

Important information:

Bansango na yo moko ekobatelama na ndenge ya kotosa mibeko, mpe ekobombama na sekele

Kofanda na RU mpo na nse na sanza misato

Osengeli te kotondisa bansango ya botangi oyo soki osali basanza na se ya misato na RU. Moto oyo ofandaka na ndako na ye akoki kotuna yo mwa mituna mpo na kosalisa ye na kopesa biyano na botangi oyo etali motango ya bato oyo bafandaka na ndako na ye.

Ntango nini okosala botangi na yo

Esengeli mabota nyonso basala botangi na mokolo ya Dimanche 21 Mars 2021 to noki noki na nsima.

Mbala mosusu makambo na yo ebongwanaki na kati ya bokono ya coronavirus. Pesa biyano na mituna nyonso mpo na makambo na yo ndenge ezali sikoyo.